Bomipesi ya moto ya Israel moko na oyo ya Palestine moko po na kimia na Mabele Esantu
Jean-René B.-Kinshasa
Atako liwa ya ndeko na ye o eleko ya Intifada ya liboso, Aziz Abu Sarah apona kolimbisa. “Ezali te po moto yango alongobamaki na yango, kasi po ezalaki lolenge naponaki pe nalingi nazala na bonsomi”, elobaki moto y’Amerika awuta na Palestine oyo akola na Yeruzalem. Ndeko na ye ya mobali, akangamaka azalaka na mibu 18, anyokwamaki pe akufaki na ba pota azokaki, ye moko azalaki na mibu 10. Aziz alubolaki ndenge akolaka, kanda na ye pe posa na ye ya kozongisa mabe, kasi ayokaki ‘te eloko moko ebongwamaki kati na ye. “Esengelaki na ngai mibu 8 po na komanyola ‘te eleko inso nazali koluka kozongisa mabe, kanda, nakomaki moúmbu ya moto abomaka ndeko na ngai”, elobaki ye. Aziz azua mokano ya kotika te ‘te liwa ya ndeko na ye ya mobali ekamba bomoyi na ye, kasi ya kosala po na kimia, yango akosala na moto ya Israel Maoz Inon, ye lokola abungisa na mobulu ena baboti na ye pe baninga ebele ya bomwana mokolo ya 7 ya sanza ya zomi ya 2023.
Bomipesi ya sango Faltas na Mabele Esantu
Bato mibale baye, bango nionso bato ya mosala ya tourisme pe bakambi ya Interact, lisanga moko ekosala po na boboto, balobaki ‘te bakoma baninga. Posa na bango ezali ya kokoma na kimia na etuka ena uto lelo kino 2030. Sango Ibrahim Faltas, sango molandi ya Custodie ya Mabele Esantu, abakisamaki na lisolo, mingi mpenza likolo ya mosala na ye na Mabele Esantu, oyo esangani na ba projets bebo po na kosunga baye banso bazali na pasi.
Sima ya lisolo, bato mibale baye balubolaki na bolingo bokutani na bango na ba Pápa. “Po na ngai, elobaki Maoz, Pápa François azalaka profete”, alobaki lisusu maloba na ye po na lisolo pe bosilisi na mindoki te bitumba. Pe sik’oyo, na bokambemi, mateya pe lisungi ya Pápa Léon, ekobaki ye, tokokota na mabele ya elaka pe komema kimia na Mebele Esantu.