Luka

Sima ya bokweyo ya drone moko ya ba russe na Ukraine, na Kiev, Sima ya bokweyo ya drone moko ya ba russe na Ukraine, na Kiev, 

Ntoma ya Papa na Ukraine akoloba lisusu ‘te esengeli kosambela po na kimia

Mgr Kulbokas, ntoma ya Pàpa na Ukraine, azongelaki mbela ya Pàpa o eleko ya likita po ya banso ya mokolo ya misato na tongo po na koloba ‘te esengeli na mbongwama moko ya mitema. Bozongisi bakangemi ekolakisa “ata soki ebongaki te kosilisa makambo ya politiki, lisolo ezali na ntina na botali yango na ndenge ya bomoto”

Jean-René B.-Kinshasa

Kosambela po na kimia na Ukraine, kotika etumba, kosunga makambo manso bikoluka lisolo. Pàpa Léon ya Zomi na Minei abwakaki ba mbela maye lelo, sima ya likita po ya banso, na bokanisi bato ya Ukraine, babetami na mobulu mosusu bipai ya ba civil pe ya biloko ya lolenge na lolenge (infrastructures)”, bitumba bizalaki kokoma makasi mokolo na mokolo, elobaki Mgr Visvaldas Kulbokas.

Mokolo ya misato ya lelo, na suka ya likita po ya banso, Pàpa Léon ya Zomi na Minei abwakaki mbela moko na bato ya Ukraine “babetami na mobulu mosusu bipai ya ba civil pe ya biloko ya lolenge na lolenge”. Olingi koloba nini na likambo eye?

Maloba ya Santu-Papa bizali kotinda biso tokanisa mobulu basali na mboka ya Ukraine, na biloko ya lolenge na lolenge, pe mbela ya kosambela po na kimia bizali na ntina. Nalingi na beta nsete mingi mingi na likambo ya suka: losambo zambi ya kimia. Ya solo, na mobu eye ya minei ya etumba, mobulu mosusu bipai ya ba civil pe ya biloko ya lolenge na lolenge ekiti te, emati komata. Mikolo miye mileki, tomonaki, ata na mboka mokonzi Kiev, ba bombe bizali kokweya, mikolo minso, ba butu binso. Limpinga moko te ya mokili ekokoka kobunda liboso ya bitumba ya makasi boye.

Liboso ya bosolo eye- likambo ‘te moto moko te akoki kobatela bomoi, ba mboka, biloko ya lolenge na lolenge- mbela ya Pàpa ezali ya kosambela po na kimia. Tozali naino na sanza ya mitano, sanza ebonzama po ya losambo ya rosaire. Nakundolaka tango inso maloba ya Ngondo Maria na Fatima: “Bosambela, bosambela, bosambela. Ezali na losambo ndé bokolonga bobebisi pe etumba pe bokozua mbongwana ya mitema”. Totikali se na ebundeli wana moko, lokola Eklezia pe lokola bato. Ngai mei nakotondo botondi Santu-Pàpa po na mbela ena.

Mikolo miye mileki, bozongisi eleki enene ya bakangemi kati na Ukraine na Russie ut’o ebandeli ya etumba esalemaki. Toyebi ‘te likambo ya bakangemi ezali na motuya na motema ya Saint-Siège. Olingi koloba nini na likambo etali bozongisi ena?

Ngambo moko, lokola ntoma ya Pàpa, tobengami mbala ebele na mokolo na mabota to na masanga ya mabota baye bakoluka lisalisi na boluki bandeko na bango babungi to bakangemi, kati na bango ba civil ebele.  Bozongisi eye esalemi ezali na ntina zambi tolobi bakangemi nkoto moko (1000) epayi na epayi. Ezali esengo makasi po na bato baye bazongi bipayi na bango. Esengo enene. Toyebi ‘te ezali mbano, kaka yango moko, ya masolo bisalemaki na Istanbul mokolo ya 16 ya sanza ya mitano. Bongo, ata makambo ya politiki bizui biyano te, lisolo ezali na ntina na botali lolenge ya bomoto. Ezali bongo mbano moko malamu.  

Ya solo, pasi enene koleka etali ba civil pe bana lokola, po ezali na libongisi moko te zambi ya bozongosi. Bozongisi nini? Ukraine akoki kopesa nini na bozongisi? Yango wana, ezali na pasi te kozongisa bakangemi ya etumba ya ba soda, pamba ‘te Ukraine akoki pe kopesa eloko moko, kasi ezali boye te po na ba civil. Tosengeli kokolisa nsambo na biso pe makasi na biso. Kaka, ezali pasi ya koyeba nzela nini tokende po na kosangisa makasi na biso, zambi tozali na kati ya botatabani. Bakangemi misusu bazongisaki bazalaki ba civil. Nazalaki na esengo ya komona ‘te, motango ya ba civil (ba russe, ndlr) baye katikalaka na Ukraine ezalaki moke; mosika na motango ya ba civil (ba ukrinien) batikalaka na ngambo esusu.

 

 

 

 

02 sánzá ya motóbá 2025, 18:55