Luka

2025.05.23 Lingomba ya Masanga ya ba episkopo ya Poto 2025.05.23 Lingomba ya Masanga ya ba episkopo ya Poto   (@VATICAN MEDIA)

Ba episkopo ya Potó bakosenga kimia moko ya sémbo na Ukraine

Bokonzi ya Lingomba ya Masanga ya ba episkopo ya Poto (Commission des conférences épiscopales de l’Union européenne), ekutanaki mokolo ya mitano na tongó na Papa ya sika. O eleko ya lisolo, ba episkopo bayebisi ye lingomba na bango pe makambo ya mikolo miye, na bobandi na etumba na Ukraine.

Jean-René B.-Kinshasa

Bokutani, mokolo ya mitano na tóngo, na Léon ya Zomi na Minei, elakisi na miso ya ba episkopo ya Poto bokebi nini Papa wa Roma azali na yango po na Poto. Ya solo, ayebi Poto koleka Amerika te epayi ye awuti pe epayi wapi asalaki mosala na ye ya motindami pe ya episkopo.

Esika ya Poto na ntantei ya mokili

Elobamaki mingi na lisolo likambo ya oyo babengi na lopoto doctrine sociale de l’Eglise pe motuya nini Poto ezuaka makambo ya bato pe ya kimia na mokili, kaka na Ukraine te. “Likambo tè Poto ekokumba makambo mango na lolenge ena, ezali elembo moko ekolakisa tè misisa ya kibokristu ya Poto- ata bilobamaka polele te- bizali kati na momeseno ya Poto”, elobaki Mgr Antoine Hérouard, mokonzi molandi ya lingomba pe episkopo ya Dijon na France. Papa alobaki “ntina ya bomipesi na bango po na kimia pe po na kimia moko ya sémbo pe ekowumela”.  “Léon ya Zomi na Minei ayebisi biso ntina ya Poto ekoki kozua na ntantei ya mokili”, ekobaki episkopo ya France.  

Tangó mosusu tozali na koyeba te na Poto, elobaki Papa, na likambo tè bazali kotala biso koleka ba ndelo na biso pe na bikolo ebele baye balingaka kozala sima y’Amerika, Russia pe Chine te, malako bitali politiki, nkita to ya bato bizali na litomba linene”. Lolenge Papa alobaki, ba episkopo ya Poto bayebisi Papa tè balingi kimia moko ya sémbo pe ekowumela na Ukraine.

Eklezia ebengami po ya kotika bilenge te

Na makambo basololaki, likambo ya bilenge ezalaki. Léon ya Zomi na Minei abeti nsete na oyo etali “lisungi na bilenge”. Po na Papa wa Roma, ezali na ntina makasi tè Eklezia etika bango te. “Ezali eloko moko esengeli totia na moto po na koyanola malamu na posa ya bato lelo”, elobaki Mgr Hérouard.

26 sánzá ya mítáno 2025, 15:24