Luka

2025.05.28 Likita mpo ya banso 2025.05.28 Likita mpo ya banso  (@VATICAN MEDIA)

Likita : Liloba lokola mbóto elonami na mabelé ya bomoi na biso

Epiksopo ya sika ya Roma asalaki likita na ye ya yambo liboso ya bandimi 40.000 na esika ya Santu-Petelo, mokolo mwa misato 21 ya sanza ya mitano. Na bokobi molongo ya mateya ya jubilé ebandisamaki na oyo ye alandi, “Yezu-Kristu, elikia na biso”, Léon ya Zomi na Minei apesi bomanyoli na lisese ya moloni.

Nsango ya Vatican

Sima ya boleki na papamobile liboso y abato ebele, Léon ya Zomi na Minei amanyoli lisese ya moloni. “Moulani eye ezali lokola ebandeli ya masese manso”, elobaki ye. Lisolo eye ekolakisa “lolenge ya bosakoli ya Yezu”, “liloba lyoko lyoko ya Nsango Ndamu ezali lokola mbóto elonami na mabelé ya bomoi na biso.

““Ezalaki ye kolona boye, mbóto esusu ekwei pembeni ya nzela; ndeke iyei kolia yango. Mboto esusu ekwei o esika ya mabanga, ezui mabelé mingi te; ebimi noki zambi ekotoki o mabelé bozindo te; kasi ebimi moi makasi, eziki pe ekauki, zambi ebimisi misisa o mabelé te. Mbóto esusu ekwei o kati ya nzúbe; nzúbe ekoli, pe ebomi yango. Mbóto esusu ekwei o mabelé malamu, eboti mbuma: esusu eboti mbuma monkama mobimba, esusu ntuku motoba, esusu ntuku isato. Moto azali na matoi, ayoka!””

Elili ya lisese

Moulani, koleka ya koloba lisolo moko na mokolo, ekotuna oyo atangi yango. “Liboso ya lisapo (histoire) bayebisi ngai to elili balakisi ngai, nakoki komituna epayi nini nazali na lisapo? Elili yango ekoloba nini na bomoi na ngai?”, etunaki Papa wa Roma.

Lisese eye ya moloni ekosunga ebandeli ya masese misusu. Likambo esangisi masolo maye, elimbolaki Léon ya Zomi na Minei, ezali bobele mabelé.

Mabelé yango ezali nini? Ezali motema na biso, kasi ezali lisusu mokili, lisanga, Eklezia. Liloba ya Nzambe ekobotisa pe ekobimisa makambo bebo ya solo

Moloni moko ya lolenge na ye

Na liteya eye ebimi na mokako ya 13 ya Nsango Ndamu ya Mateo, Yezu akoloba na baye basangani nzinganzinga ya nadko na ye, “kasi ekosala na moko moko na lolenge ekeseni”.

Moloni eye Yezu abeti lisolo azali na lolenge na ye, ekobaki Léon ya Zomi na Minei. “Akolona mbóto ata esika bizali na konzo ya kobota mbuma te”, ezaleli moko ekoki kokamuisa, elobaki ye, “po maye tosalaka tomesana komituna”.

Mabelé, elilingi ya moto

Kasi, bolingo ekoki kozala eloko ya komitunaka te, elobaki mokitani ya Petelo, pe lolenge Moloni akobuaka ba mbóto ezali “elili moko ekolakisa lolenge Nzambe alingaka biso”.

Mabelé suka suka elilingi ya moto. Soki moto akoki kozala tango mosusu na bozangi bokebi, “akonyokwama na makanisi kilikili ya bomoi”, akoki pe kozala “moto azali na ngonga pe ayebi koyamba”, “Nzambe ayebi kotiya motema pe kolikia ‘te lelo to lobi mbóto ekobota. Alingi biso bongo, akozela te ‘te tozala mabelé malamu, akopesa biso na motema molamu tango inso liloba na ye”.

Na bosakoli lolenge mbóto eboti mbuma, Yezu akoloba po ya bomoi ya ye, elimbolaki episkopo ya Roma na bandimi. Bongo “lisese eye ekoyebisa biso ‘te Nzambe akomilengela po “apanza” po na biso pe Yezu akomilengela ya kokufa po abongola bomoi na biso”.

Moloni o eleko moi ekolala

Po ya bosukisi, Léon ya Zomi na Minei, alobaki kokanisa elili eye Vincent Van Gogh asalaka, Moloni o eleko moi ekolala, epayi wapi elakisi moto azali kolona, kasi tokomona sima na ye ba mbóto bisili bikomeli. “Nakomona lokola ‘te ezali elili moko ya elikia: na lolenge moko to mosusu nkona ebimisi mbuma. Toyebi te ndenge nini, kasi ezali bongo”.

02 sánzá ya motóbá 2025, 13:49