Luka

Likanisi la losambo mpo ya sanza ya yuni ya Papa Léon XIV : Kokola na kozala motema mawa

Mpo ya sanza ya yuni, Tata-Mosantu apesi likanisi na eklezya ya batobanso, tosambelani «mpo te moko na moko o kati na biso azwa mbano to eyano ya bondeko bwa yé nà Kristu. Bongo ayekola na motema mwa yé, lolenge ya koyokela batu mawa».

Bansango ya Vatikan

 

Papa Léon XIV abiangi bakristu na koyekola kozala motema mawa mpo na mokili. Na bilili bya yé ya yambo ya likanisi ya losambo, ebimaki o mokolo mwa 3 ya yuni, Léon asengi tosambelani mpo ‘te moko na moko amitokela na motema mwa Yezu, eyano ya bondeko kati na yé moko nà Yezu mpe ayekola na motema mwa yé lolenge ya kozala motema mawa nà bato.

Likanisi liyé lizwami na sanza oyo eponami mpo na Motema Mosantu mwa Yezu. Papa abeti nsete ‘te motema mwa Kristu elimboli molingi bwa ye ndelo nsuka te mpo ya mokili. Bolingo boye bokomonisama na bikela ya koyokela bato na bolembu (bato ya mpasi) mawa, elobi Sango Cristóbal Fones, S.J, directeur international ya Réseau Mondial ya losambo la Pape.

Lisanga lya bato ba losambo na mokili, na lisalisi lya malendisi mya molimo ya Papa “Le Chemin du Cœur” “Nzela ya motema”, epesi likanisi lya kosala losambo lyango na biteni libwa mpo ya kosalisa bandimi na kokota na etinda ya kozala na motema mawa. Nde bongo bakosangana na motema mwa Yezu. Nzela eye ebiangi nakomona mikakatano mya mokili moye na miso ya Kristu mpe ya koyanola yango na losambo mpe misala. Na losambo linà, tokosenge na Christu toyeba ye malabu, tokangema na ye, toyekola na bolingi bwa yé.

Bilili bina bisalemaki na ndako-Nzambe ya Gesù (Eklezya ya Nkombo Esantu ya Yezu), na mboka Roma. 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

03 sánzá ya motóbá 2025, 21:54