Tata Mosantu Papa asengi ‘te lisalisi likota o Gaza mpe boyinani bosila
Albys KBD CP - Kinshasa/RDC
«Ndenge makambo mazali koleka o mabele ma Gaza ezali kokoma mpasi mingi mpe monyokoli. Uto bozindo bwa motema mwa ngai, nazali kosenge ‘te lisalisi likouta mokili mobimba likota o Gaza mpe boyinani bosila, mpamba te, ezali kokufa mpe konyokwama mingi nde bana bake, babange na bato ya mpasi » (Tata Mosantu Papa Léon XIV).
Lisungi likoki te
ONG Medecins sans Frontières efundi Israël ‘te alingi se kolekisa o Gaza se lisalisi like liye likoki te na bato bazali koyoka mpasi. Lolenge Israel ekosala ezali koboma bato ya Gaza na nzala.
« Ndenge ena ya bosali ezali lolenge ya kokosa bato mpe kokomisa mapinga ma basoda ya Israel makasi ». Malobamei mazwami o liyebisi lya Pascale Coissard, moko wa bakambi ba MSF na mboka Khan Younes o Gaza. Ndingisa bakonzi ba Israel bapesi mpo ‘te mituka mokama mya lisalisi mikota o Gaza ezali moke o botalaka mpasi ya bato. Nzokande uto sanza ya misato 2025 Israel azali kokoba kobakisa montango mwa mapinga ma yee o Gaza.
Etumba ya mwa 7 oktobere 2024 esali ‘te, o ngambo ya Israel bato bakufi 1. 218 mingi mpenza ba civils, engebene na nsango ya AFP. Epai esusu, likolo lya bato 251 mapinga ya Hamas bakangaki mpe balimwisaki, bobele bato 57 bazali naino o Gaza, ontei ya bango 34 basili kokufa.
Bomibekoli bwa Israel bosali ‘te bato bakufi o ngambo ya Gaza 53. 573 ; o kati ya bango, mingi ezali ba civils engebene na nsango ya ministère ya santé ya Hamas mpe endimami na ONU.
Matondi mingi na ndénge otángi lisolo liye. Soki olingi kozwa nsango ntango inso, mikomisa na mokanda mwa biso mwa nsango na bofini esika eye