Luka

2024.10.01 Pàpa François na ONU, o mokolo mwa tukù mibale na mitano (25) ya sànzà ya libwà na 2015. 2024.10.01 Pàpa François na ONU, o mokolo mwa tukù mibale na mitano (25) ya sànzà ya libwà na 2015. 

ONU apesi longonya na Pàpa François, «mosakoli mwa elikya»

Mikolo misato sima ya matanga ya Pàpa François, mokomeli monene ua Nations Unies apesi limemya na ngwendé ya ONU na kondo Pàpa, mpo alakisaki na boùmeli ya mibù zomi na mibale (12 ans) ya bontoma bwa yé “mbélà ya bosembo mpo ya bato mpe ya mabélé”.

Albys KBD CP - Kinshasa

 

O mokolo mwa zomi na libwà (29) ya sànzà ya aprili na New-York na ngonga ya 21h, na ngwéndé esika Pàpa François abwakaki mbela ya kokengela ekélà, mokomeli monene ya Nations unis apesi mokakoswa na bankota ebélé (un hommage appuyé et solennel en plusieurs langues) na kondo Pàpa. Alobaki na batindami ya bikolo193. Antonio Guiteress alimboli ete : François azalaki moto ya boyambi makasi, azalaki na makoki ya kotonga ba gbagba kati na ba eyamba; azalaki mokengeli ya baye baboyaka, lokàkà o kati ya mokili motondi na bitumba. Bongo azwaki maloba na nkombo ya libotà ya Nations Unis, alobi, nakopesa solo ba kondoleansi na ngai na eklozya ya katoliko, mpe na ébélé ya bato basusu na mokili bazali kolela moto monene babungisi.

Pàpa François na ONU na 2015

Diplomate ya ekolo ya Portugale mpe ya Timor ya esti asalaki lisukulu moko na bankota ébélé, mpe akundoli maloba Pàpa François alobàkà na liyangani monene ya Nations Unis na 2015, tango alobaki ete maboko manso bakomema na ezingelo, ezali likàmà mpo na mokili. Alimboli ete encycliki laudato si ememaki na accord ya paris. Boyokani wana ndé ekobatela mabele, mingi mingi mp ona baye bazali solo na ngambo ya bangamba. Abengaki bakonzi babatela ndako ya banso. Pàpa ayebaki ete baye basalaki eleko te bazali kofuta mpamba màkàma mya somo ya botomboki klima ; na yango tozali na lotomo ya kozwa makambo na maboko.

François alingaki kokomisa likanisi lya écologie intégrale eloko ya motuyà mpo ya banso .                 pour tousLe choix de son nom signifiait déjà son intentio
François alingaki kokomisa likanisi lya écologie intégrale eloko ya motuyà mpo ya banso . pour tousLe choix de son nom signifiait déjà son intentio   (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Kaka na mobembo monà, Antonio Guterres alobelaki makanisi mya Pàpa mpo ya bomoko ya mokili, ekotambola kati na boboto mpe bosembo. Akangami mingi mingi na encycliki Fratelli Tutti, oyo ebimaki na sànzà ya zomi ya mobù 2020, abeti nsété na bomipesi ya Pàpa mpo bosembo ya bato mpe bokokani. Aboyaki na polele bokeseni kati ya lokoso na mabé misusu lokola bobolà, nzala, kobwakisama.

Akanisi lisusu  été Françoia asalaki mobembo lokola mokitani ya bantomà na Lampedusa, mpo nakobenda bato bamona likambo ya somo oyo balukimboka mpe bayé bazali kosenga bisika ya kovanda to kobatama. Yango wana o mokolo mwa yubilé ya bakimimboka ya nsuka, mwa 20 ya sànzà ya yuni moleki, françois abyangaki bikolo nziké na koyamba mpe kokotisa bato bayé bazali kolukamboka.

Mwa eteni ya lisolo(lisukulu) ya Antonio Guterres na liyangani monene ya Bikolo bisàngànà ( Nations Unies) na mokolo mwa tukù mibale na libw ya sànzà ya aprili 2025.

Akweyisi (aboyi) bitumba

Lokola motamboli ya boboto, Pàpa François asàlaki mibembo mingi mpenza na bikolo biye minyokwami na bitumba kobanda na Irak, kino na Soudan ya Sudi, koleka na ekolo ya Republiki demokratiki ya Congo, mpo ya kokweyisa mobulu kasi elengela boyokani. Akotelaki bainnocent oyo batielaki motambù na bitumba ya Gaza na mpe Ukriane. Mokano mwa ye mpe mbela ezalaki ya koboya kokanga miso na bayé bazwaki likàmà na nzela ya bitumba mpe mobulu.

Ndakisa ya kolanda

Na mokili mwa lelo motondisami na bokabwani mpe koswana, “mobù 2025 motangami mobù mwa elikya”; ebyangi bono lisusu Mosàli monene ya ONU. Nakosukisa lisukulu ya yé, Antonio Guterres asengaki na liyangani linene nakozwa mokano mwa sika mpo ya kimya, libateli ya bomoto ya bato, mpe kokolisa bosembo kati na bato.

Diplomatie (lolenge ya kosàla boyokani nà bikolo bisusu)ya Pàpa François ekolisi na banso mposa ya bomoto mpe ya kimya
Diplomatie (lolenge ya kosàla boyokani nà bikolo bisusu)ya Pàpa François ekolisi na banso mposa ya bomoto mpe ya kimya

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esik a eye.

 

01 sánzá ya mítáno 2025, 12:56