Molinga ya mwindo na mombonda ya Chapelle Sixtine
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC.
Bazalaki bato 45 000 batomboli miso mpo ya kotala mombonda, koleka bangonga misato sima ya “Extra Omnes”, Kozela ya bandimi omonisamaki ndelo nsuka tè. Na ngonga ya 21h00, molinga ya mwindo emataki na mobonda ya chapelle Sixtine,na loboko la mwasi ya baziliki ya Saint-Pierre, o mokolo mwa misato mwa 7 ya sanza ya mayi. Ata Pàpa moko aponamaki te kati na collège ya ba episkopo 133 oyo bazali kopono na kotanga ya liboso.
Sima ya molongo kobanda na chapelle Pauline kino moye mwa Sixtine na ngonga ya 16h30, ba episkopo wa lokùmu babelelaki Elimo Santu na nzembo ya “Veni creator”, sima ba lapi ndayi, moto na moto na ngala na yé loboko likolo ya Biblia, lokola ekomàmà na mikanda mya mibeko mya ba apostolu Unoversi Dominici gregis, mobeko mosàkolamaki na Pàpa Jean-Paul II na 1996.
Sé na tango wana, Mgr Diego Ravelli oyo azali moyangeli ya milùlù ya Pàpa, nde alobaki “Extra Omnes” na lingala elimboli ete: “Banso libàndà”. Elongo na ye, batikalaki nà episkopo wa lokumù Raniero Cantalamessa moteyi ya ndako ya Pàpa, oyo akotaki na conclave te. Batikalaki mp ona mwa mateya, bongo sima babimaki mpo ya kotanga ya mbala ya yambo.
Bamiliers ya bato na place saint-Pierre
Na esika ya Saint-Pierre, bandimi bayiké balandaki milùlù minà na ba bilili ya minene. Ba bendele ndenge na ndenge mozali kopepa na ba efelo ya libateli. Ezali kolakisa bongo bikolo wapi ba episkopo wa lokùmu bawutaki. Solo bango bawuti na bikolo tukù sambo (70). Banso bazalaki miso likolo mpo ya kozela na esengo molinga ya mpembe.
Mpo na motuya ya mbala ya yambo ya maponomi ya conclave moye ya mbala ya tuku sambo na motobà (76e conclave), ba episkopo balokùmù votaki na lokasa ya kokanga mpo moto ayeba te, yambo ‘te bafungola. Kasi ata nkombo moko te ekomaki na motango ya tukù mwambe na libwà (89) esengelaki mpo ya koponama. Bazikisaki ba lokasa ya voti na mbeki ya mabende. Mpo na komatisa emoneli malamu ya molinga, batiayaki mbeki ya sika ut’o mobu 2005, na ba etumbeli ya moto. Molinga ya mwindu ekowuta na biloko ndenge na ndenge lokola perchlorate de potassium, l’anthracène nà mpe soufre, mpo ete molinga mowumela ngonga pene ya 7 miniti.
Bilembo bisusu bizali ete, ngonga ya baziliki ebetaki te, bo momeseno tango Pàpa aponami. Maponomo oyo ezali ya mbalakata te, mpo ut’o mobù 1878, basàlaka conclave na chapelle Sixtine, molinga ya liboso ezalaka kaka ya mwindo
Manaka ya mokolo mwa minei mwa mwambé (8) ya sànzà ya mayi
Sima ya maponomi ya liboso, ba episkopo bazongaki na ndako Sainte-Marthe, na ngambo mosusu ya Vatican, mp ona koliya mpe kolala butu ya yambo ya conclave.
Mokolo mwa 8 ya sànzà ya mayi, ba episkopo bazali na elakà na ngonga ya 8h15, mp ona Misa mpe milùlù mya losambo ya ntongo na chapelle Pauline. Sima ya ngonga moko, na ya 9h15, bakopono mbala mibalé (soki na mbala ya liboso Pàpa abimi te), sima bakosala losambo ya misato. Bakozonga mp ona koliya na ndako ya Sainte-Marthe, yambo ete bakoba na maponomi mbala mibalé lisusu na ngonga ya 16h30.
Kaka tango nkombo moko ekozwa motango esengeli kati na collège ya ba episkopowa lokùmu, ndé wana molinga ya mpembe oyo banso bazali kozela, ekobima na mombonda. Bongo sima ya ngonga moko, Pàpa ya sika akobima mpo ya kopesa mbote na fulu y abato libanda, ut’o lininisa ya baziliki ya Saint-Pierre, nà bilamba ya mpembe.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye