Molinga mya mpembe: yoko Pàpa aponami
Bansango ya Vatikan
Na mpokwa moye, na ngonga ya 18h08, molinga ya mpembe oyo banso bazalaki kozela, ebimaki na chapelle Sixtine. Eyebisi bongo ete ba episkopo wa lokùmu nkamà moko nà tukù misato na misato bayokani mpe bazwi mokano ya kopono nkombo moko mpo na 267e Mokonzi monene ya bantomà.
Sima ya milinga mibalé ya mwindo, moko na mokolo ya misato ya sambo (7) ya sànzà ya mayi, mpe mosusu na mwa tango sima ya nzànga, o mokolo mwa mineyi mwa mwambé (8) ya sànzà ya mayi, bongo ba episkopo bayebisi mpe na mokili mobima ete baponi Pàpa ya sika.
Ayei komimonisa pene ya ngonga moko sima ya molinga ya mpembe ut’o lininisa (la loge) ya mabenisi ya baziliki ya Saint-Pierre.
Etuluku ya basoda bikeseni bayaki na place Saint-Pierre, moko na bango oyo ya gendarmerie vaticane mpe oyo ya ba gardes suisses. L’habemus Papam ekolobama na episkopo wa lokùmù ya Corse Dominique Mamberti, Protodiacre, elimboli ete oyo alekani na b ambula (mukolo ya banso) na lingomba ya ba episkopo wa lokùmu diakoni.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.