Pàpa azoki na loboko nsima na kokweya
Bansango ya Ekolo ya Vatican
“Na ntongo ya mokolo mwa 16 ya sanza ya yanuali, nsima ya kokweya na ndako ya Mosantu-Marta, Pápa Franswa azwaki mpasi na libolongo, na loboko na ye ya mobali, ezangaki kaka ebukana”, esakolaki Ndako ya bopanzi Nsango Vatican na liyebisi ya bapanzi-nsango na midi ya mokolo ya minei, 16 Yanuali, mpe ebakisaki ete “ batyaki loboko lyango ya kokanga mpo na komibatela.”
O mokolo mwa mosàlà mineyi oyo, Papa François apesaki limemya na programe na ye mpe asimbaki ba auditeurs ndenge na ndenge oyo ekanamaki, kati na bango groupe communautaire ya Baktashi na Albanie mpe Nosipho Nausca-Jean Jezile, président ya Comité mondial ya kokengele bileyi o mokili mobimba
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa