Pàpa aponi Sango Ebengue lokola Episkopo ya Yokadouma na ekolo ya Cameroun
Bansango ya Vatican
Mgr Justin Georges Ebengue abotamaki o mokolo mwa zomi na mwambé (18) ya sanza ya mayi o mobù 1970. Atangi na séminaire propédéutique ya Saint-Jean-Baptiste na Doumé, mpe ayekolaki philosophie mpe théologie na séminaire interdiocèsain ya Notre-Dame de l’Espérance na Bertoua mpe azwaki licence ya droit canon na Université catholique ya Afrika ya katikati na mboka Yaoundé.
Akulaki bonganga-nzambe o mokolo mwa zomi na mwambé (18) ya sanza ya febuali o mobù 2006 mpo na diosezi ya Batouri.
Sima ya bokuli bonganga-nzambe, asalelaki mikumba oyo: Sango molandi na paloase, Sango mokonzi, récteur ya séminaire mineur ya Doumé; chancelier ya diosezi ya Doumé-Abong’ Mbang; mokambi ya pastoral ya diosezi mpe ya malongi; administrateur diocésain ya Batouri ut’o mobù 2017 tee 2018; recteur ya cathédrale ya Batouri; aumônier ya collège katoliko ya Bary; mosangani ya collège ya ba consulteurs ya conseil ya ba nganga-nzambe mpe ya conseil ya makambo etali nkita; mosangani ya administration ya procurature diocésaine; molandi monene ya Batouri.
Ut’o mobù 2023, azali récteur ya séminaire monene ya interdiocèse ya Notre-Dame de l’Espérance na Bertoua.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa