Luka

2025.01.17 Lisanga ya ba Seminarites ya Cordoba 2025.01.17 Lisanga ya ba Seminarites ya Cordoba  (Vatican Media)

Pàpa alendisi baseminaristes na kolata «Ekoti ya Elikya»

Na lisikulu nayé asalaki na batindami ya séminele monene ya santu Pélage ya Cordoue, oyo bayàki na pèlerinage na Rome mpo na mobù ya jubilé, Pàpa Franswa asengi na bango na “kokende liboso na lisanga” na nzela ya Yesu, “kotambwisa, kobatela, kosunga mpe kopambola (kobenisa) bayé Mokonzi apesi biso”.

Albys KBD, cp – Kinshasa/RDC

 

Pàpa Franswa ayambaki o mokolo mwa 17 ya sanza ya yanuali, na salle Clententine ya ndako ya bantomà, balakisi mpe baseminariste ya seminele monene ya Saint Pélage, ezwami bongo na etukà ya andalouse de Cordoue na ekolo ya Espagne. Tata Mosantu azali kobete nsente na maloba mayé ya elikya ete na nzela ya bomoi, tokoki “kokunwela elikia, lokola bilembo bizali kolakisa biso nzela”. Liboso, «elembo ya yambo ezali kotala likolo,mpo na bokutani ya nsuka na Kristo». Kasi «na bisika ya bisika ya yambo te, epai wapi ezali malamu mingi», ebakisi Franswa: «oyo ezali banzela ekufà», esengeli kozwama te, mpo na koboya «kotambola sima na bolembù mpe na soni».

Bolikyi o nzela ya Mokonzi

Nakolanda, elembo ya mibale, “ezali makàmà ya Nzela”, elobi episkopo wa Roma na bampaya bayé batamboli ya elikya, bawutaki na Esika kitoko na nkombo ya Mosantu Pélage, ezwami na esika yak ala ya etando ya ba martiro. Mpe “lokola mwana mosantu oyo asalaki na ntango wana, na katikati ya mpasi ya etumba, ya motema mabe oyo ebongi te na bato,” François akobaki, “na ekoti ya bibundeli ya elikia, tokoki kotatola, koyika mpiko na nzela ya Mokonzi, nakondima ete Yezu akosunga bango ntango inso mpe akopesa bango makasi ya kozala baloni ya elikia”. “Kasi bakanisa soki moke te ete kolona elikya esengeli kobimisa maloba malamu to kopono maloba masukali”.

“na ekoti ya bibundeli ya elikia, tokoki kotatola, koyika mpiko na nzela ya Mokonzi, nakondima ete Yezu akosunga bango ntango inso mpe akopesa bango makasi ya kozala baloni ya eliki”

Kolikya na Yezu

Na bosukisi, elembo ya misato ezali “Bisika ya bozongeli” na molimo. Na nzela ya mobembo ya boyambi oyo basali, oyo ememi bango na kokatisa Ezibelo Esantu to kotala malita ya bantoma, Pápa Franswa amoni ete ezali na mposa oyo ya “koyoka bozali ya oyo azali elikya se moko ya biso, Yesu”.

“nzela oyo tokoki kokende liboso biso moko te, kasi na lisanga, kotambwisa, kobatela, kosunga mpe kobenisa (kopambola) baye Mokonzi apesi biso”

Kristo “akomilakisaka epai na biso lokola Molakisi, lokola Mokonzi, amipesi na biso lokola bilei na Liloba nà mpe na Ukaristya, abatelaka biso ntango tozali na katikati o nzela, akoyambaka biso ntango bolembù ekolinga kolonga biso mpe tango tosengeli koteleme mpo na kopema”. Na sima alimboli: « soki elikya ezangi, kotambola na nzela ekozala malamu te, kasi na komitika epayi ya yé, tembe ekozala te, mpo tokoma libongo tolingi». Nzela ya Yezu ememaka na Yeruzaleme ya lola na nzela ya Yeruzaleme ya mabele, eyambami na ekulusu mpe esungami na ebele ya bato ya ekolo ya Cyirène, elimbolaki Tata Mosantu. Ezali “nzela oyo tokoki kokende liboso biso moko te, kasi na lisanga, kotambwisa, kobatela, kosunga mpe kobenisa (kopambola) baye Mokonzi apesi biso,” esukisaki Pápa.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

18 sánzá ya yambo 2025, 10:47