Papa abatisi bana tuku mibale na moko (21) oyo babotami sika na Ndakonzambe ya Sistine
Albys KBD cp - Kinshasa/RDC
Lokola mokolo mwa lomingo nyonso oyo elandi bomimonisi ya mokonzi ut’o mibù tukù mineyi mileki, kolela ya bana oyo babotami sika eyokanaki na Ndakonzambe ya Sistine ya Vatican na eyenga oyo ya libatisi ya mokonzi. Bayanganaki na nse ya elilingi monene oyo Michelangelo asalaki, bana tukù mibale na moko (21) oyo babotamaki sika balataki bilamba ya mpembe bazwaki elambo ya batisimo na maboko ya Pápa Franswa. Lokola na momeseno ebandisaki Mosantu Yoane-Polo II na 1981, bana oyo baponami bazali bana ya basali ya bakonzi ya vatican, mpe oyo babomi nayino kandela na bango ya liboso te (bakokisi nayino mbula moko te).
Bokoti na Bomoyi bwa bokristo
“Lelo, moko na moko kati na bino, baboti, mpe Eklezia yemei, azali kopesa likabo eleki monene, ya kitoko koleka : likabo ya boyambi ya bana” esakolaki Tata Mosantu na ebandeli ya molulu mwango. “Tosenga na Nkolo ete bakola na bondimi, na bomoto ya solo, na esengo ya libota,” ebakisi yé.
Banyakelaki (sopelaki) bana, moko na moko, mayi mabenemi, bapakolaki bango mafuta ya Krisma ya santu na bilongi na bango, na nsima bazipaki bango elamba ya mpembe oyo elimboli bopeto. Na nsima, baboti bapelisaki kandela (bougie) ya Pasika, elembo ya mwinda (pole) mwa Kristu. “Bozala na bokengi ete bana ba bino bázala ntango inso na bomoi lokola bana ya mwinda” asakolaki, oyo na nsima atindaki baboti bámema pole yango na bandako na bango mpo na komikundola mokolo monà, mokolo oyo mwana wa bango abotamaki lokola mokristu. “Bongo ntango bokokutana na makambo to mokakatano, bopelisa mwinda mpo na kosenga Mokonzi ngolu mpo na libota na yo”.
Rite ya « Effatà », ya « bofungoli », oyo ezwi épisodi ya Nsango Elamu lokola likomamaki na santu Marko, wapi epayi Yesu abikisi nkidàtoyi mpe baba, esalemaki mpe. Na yango, Cardinal Konrad Krajewski, aumônier ya Pápa, mpe Cardinal Fernando Vérgez Alzaga, mokambi ya Gouvernorat ya Etukà ya Vatican, basimbaki na misapi ya minene, matoyi mpe mbebo ya bana oyo bazwaki batisimo. Na nsuka ya milùlù mina, Franswa apesanaki mwa maloba nà mabota ya bana baye bazwi batisimo mpe apesaki moko na moko ya bango likabo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa