Jubilé: Linaka lya milùlù ya Pàpa ya libandela ya mobù 2025
Albys KBD – Kinshasa/RDC
Bamisa mibale mpe milùlù ya nsambo ya mpokwa: linaka y aya milùlù mikokambama na Pàpa na sanza ya yanuali na fabuali ya mobù 2025 ebimisami na Office ya milùlù ya Pàpa.
Jubilé ya bapanzi-nsango
Bokutani ya yambo bikosalema o mokolo mwa poso mwa tuku mibale na itano (25) ya sanza ya yanuali na ngonga ya 17h30 o kati ya baziliki monene ya Mosantu -Polo-ya libanda-ya lopango (Saint Paul-hors le-murs), na eyenga monene ya mbongwanà ya mosantu Polo apostolu. Pàpa Franswa akokamba nsambo ya yambo ya mpokwa, mpe akosukisa bongo losambo ya bomoko bwa bakristu.
Sima lobi, mokolo mwa lomingo mwa tuku mibale na motoba (26) ya sanza ya yanuali, Tata-Mosantu akokamba misa ya lomingo la liloba lya Nzambe na ngonga ya 9h30 o kati ya baziliki ya Mosantu Petro. Bongo,Ukaristia enà ekosukisa ekwelà ya yambo ya jubilé y ambula, oyo ya bapanzi-nsango
Jubilé ya mapinga ya basodà
Mikolo mwa poso mwa 1er ya sanza ya febuali, na libaku ya eyenga ya bobonzi Yezu o Tempelo ya Yeruzaleme, nsambo ya yambo ya mpokwa ekosalema o kati ya baziliki ya Mosantu-Petro na ngonga ya 17h, ekokambama na Mokonzi monene ya Vatican. Na bosukisi, bokutani ya nsuka nà Pàpa mpo na basanza mibale ya yambo ya mobù 2025 ekozala o mokolo mwa lomingo mwa libwà (9) ya sanza ya yanuali, na Place Saint-Pierre, likosukisa jubilé ya mapingà ya basodà, bampulusinà basinzili (basli ya bokengi).
Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.