Tozala batongi ya “Afrika oyo biso moko tolingi”, wana bolendisi bwa tata episkopo wa lokumu Kardinal Ambongo
Albys KBD CP – Kinshasa /RDC
Na litundu kasi mpe na mwa mabanzo, Episkopo mokambi wa SCEAM alobaki na bandeko baye basi mpe babali ba mabele ma Afrika o libaku lya bokundoli mokolo Afrika o mwa lomingo 25/5. Ezalaki mbala ya tuku motoba na mibale (62e anniversaire) uto bokeli bwa lingomba lya bomoko bwa Afrika (OUA oyo ekoma UA).
Likanisi-ntina lya Bomoko bwa Afrika o mobu 2025 ezali: Bosembo mpo ya bai-Afrika mpe na bato banso bazalaki o Afrika. Kardinal akumisi Commission ya bomoko bwa Afrika na ndenge aponi liteya-mama lya bosembo mpo ya baye banso bazali o mabele ma Afrika, to na bisanga mpe bai-Afrika banso baye bazali o libanda.
Na masolo ma ye, abeti mosete likolo lya kpokoso ya Afrika, « Tokokoba koloba mpo ya mikakatano miye izali konyokolo mabele ma biso mpe bato ba yango lokola bozangi bosembo, bobomi bato, bitumba, bobola, mambi matali bobokoli bana, maambi matali bokolongonu bwa nzoto, bosololani, bosololani o kati ya biyamba, mambi ma bobateli mokili, makambo matali baye bakima mboka ya bango, baye bakimi bitumba, boteki bato » .
Na ndakisa ya Papa Leon XIV, komipesa mpo ya bosembo mpe boboto
Mokambi wa SCEAM akobi: «boswani, bitumba mpe bozangi isali ´te bato bayike, basi, babali mpe bana batika bisika bya bango mpo’te bakima mpasi mpe nzala». Mawa mingi zambi bato batau mingi mpenza basi na bana bazali kokoba koyoka mpasi mingi.
Afrika, lokola Eklezya libota lya Nzambe engebene na mayoki ma Kardinal wa Kongo, azali na elikya ‘te bakambi ba Afrika bakotia motema na mbelamya Papa Leon XIV oyo, lokola Papa Franswa azali « kosenge ‘te Eklezya etia motema mpo ya bosembo, boboto mpe bomoto bwa bato banso, mpe mingi mpenza babola, baye babosani bango mpe baye bazali konyokwama mpo ya bitumba mpe bozangi bosembo ».
« Esengeli kokeba mingi na Afrika zambi ezali esengo mpe elikya ya mokili »
Episkopo mokumi wa Kinshasa azongeli maloba Papa Franswa asakolaki o tango ayaki na mobembo mwa ye na Republika Demokratika ya Kongo mpe na Soudan ya Sud, o mikolo mya 31yanwari kino mwa 5 februar ya mobu 2023Tata Mosantu abelelaki ‘te: « Bolongola maboko ma bino na Afrika, botika konyete Afrika: Afrika ezali bomengo ya kotoka te mpe maabela ma koyibela te. Afrika yee moko akamba makambo ma yee! Mokili mokanisaka mpasi ya nsomo bayokisi Afrika na bato ba yee mpe mokili mobosana Kongo mpe mabela ma Afrika te. Afrika, esengo mpe elikya ya mokili ezala na lokumu:baloba mingi mpo Afrika, bamemya Afrika ».
Kardinal Ambongo abakisi ‘te CJPD (commission Justice, Paix et Développement) ya SCEAM ezali kokoba mosala mwa yango mpe kosenge Bai-Afrika banso «bazala batongi ya Afrika oyo bango moko balingi, Afrika ya malamu mayike oyo etondi na esengo mpe elikya. Yango ezali mosala mea biso na nzila ya CJPD-SCEAM mpe bilo ya biso o Addis-Abeba ».
Lokola «batamboli ba elikya», kotombola mpe kobatela bomoi binso
Na likita lisalemaki na Addis-Abeba o ekolo ya Ethiopia o mwa 27 tee 28 febuali 2025 likolo lya liteya mama : « Mosala mwa mangomba ba bamibonza mpe mangomba ma botomboli bosembo mpo ya bai Afrika mpe bato banso bauti Afrika », mokambi ya SCEAM akundoli na maloba maye bilo ya SCEAM-UA mpe mangomba ma biyamba, ma bato ba zebi mpe mangomba masusu ma Afrika mpe ma mokili mobimba , banso bazali kosenge bosembo mpo ya mpasi inso bayokisi Afrika.
O libaku liye lya mokolo mwa Afrika, Kardinal Ambongo alendisi bakonzi ba Afrika mpe ba mokili na mpe bato banso batia motema mpe basala manso mpo ya bosembo mpe botosi mibeko mya bomoto kasi babunda mpe na bokabwani, bosambwisi bato mpe mpasi ndenge na ndenge Bai-Afrika bazali konyokwama na yango.
Lokola bato ba elikya, Kardinal mokambi wa SCEAM asukusi boye : « Banso totombola mpe tóbatela bomoi, tokutola bobola, tóbatela mokili-ndako ya biso na botongi gbagba ya boboto mpe elikya bipai binso o mabele ma Afrika mpe bipai binso ».
Matondi mingi na ndenge otangi lisolo liye. Soki olingi kozwa nsango ntango inso, mikomisa na mokanda mwa biso ya nsango na bofini esika eye